Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 22:48 - Mokanda na Bomoi

48 Azali Nzambe oyo abundelaka ngai, oyo atiaka bikolo na se ya matambe na ngai,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 22:48
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki na Joabi : — Pesa ngai nzela ya kokima mbangu mpo na kokende koyebisa mokonzi ete Yawe akangoli ye na maboko ya banguna na ye.


Bongo moto ya Kushi akomaki mpe alobaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, yoka basango malamu ! Yawe akangoli yo lelo na maboko ya bato oyo babundisaki yo.


Bamemaki moto ya Ishi-Bosheti epai ya Davidi, na Ebron, mpe balobaki na mokonzi : — Tala moto ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, monguna na yo, oyo alukaki koboma yo. Na mokolo ya lelo, Yawe azongisi mpo na mokonzi, nkolo na ngai, mabe na mabe epai ya Saulo mpe bakitani na ye.


Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »


Azali bolingo na ngai mpe ndako na ngai ya makasi, ebombamelo mpe mokangoli na ngai, nguba mpe ekimelo na ngai ; Ye nde atiaka bato na ngai na se ya bokonzi na ngai.


Yawe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, mimonisa kati na nkembo na Yo !


Pamba te Klisto asengeli kokonza kino Nzambe akotia banguna na Ye nyonso na se ya matambe na Ye.


Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »


Oh tata na ngai, tala eteni oyo ya kazaka na yo na loboko na ngai ! Nakataki songe ya kazaka na yo, kasi nabomaki yo te. Sik’oyo, sosola mpe yeba ete, kati na ngai, mayele mabe mpe botomboki ezali te. Nasalaki na ngai yo mabe te, kasi yo ozali kolanda ngai mpo na koboma ngai.


Tango Yawe akokokisela nkolo na ngai bolamu nyonso oyo alakaki yo mpe akokomisa yo mokambi ya Isalaele,


Tango Davidi ayokaki ete Nabali akufi, alobaki : « Tika ete apambolama, Yawe oyo akoti likambo na ngai na ndenge Nabali atiolaki ngai ! Apesi te na mosali na Ye nzela ya kosala mabe, kasi akweyisi mabe ya Nabali na moto na ye moko ! » Bongo Davidi atindaki maloba epai ya Abigayili mpo na kosenga ye ete akoma mwasi na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ