Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 22:4 - Mokanda na Bomoi

4 Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu, mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 22:4
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango kaka babandaki koyemba mpe kokumisa, Yawe atiaki mobulu kati na bato ya Amoni, ya Moabi mpe ya bangomba Seiri oyo bakotaki na Yuda, mpe babomanaki bango na bango.


Bongo Balevi oyo : Jozue, Kadimieli, Bani, Ashabinia, Sherebia, Odia, Shebania mpe Petaya balobaki : — Botelema mpe bokumisa Yawe, Nzambe na bino, mpo na seko na seko : « Tika ete Kombo na Yo ya nkembo epambolama mpe enetolama likolo ya nkembo mpe lokumu nyonso.


Nani akoloba misala minene ya Yawe ? Nani akopanza sango ya lokumu na Ye nyonso ?


Nakotombola kopo ya elonga mpe nakobelela Kombo ya Yawe.


Nakobonzela Yo mbeka mpo na kozongisa matondi, mpe nakobelela Kombo ya Yawe.


Ayokaki ngai ; boye nakobelela Ye bomoi na ngai mobimba.


Kasi nabelelaki Kombo ya Yawe : « Yawe, nabondeli Yo, bikisa ngai ! »


Yawe azali libanga na ngai, ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai ; azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai ; azali nguba na ngai, Mobikisi na ngai, mpe ekimelo na ngai.


Bato oyo batalaka epai na Ye bangengaka na esengo, mpe bayokisamaka soni ata moke te.


Mpe belela ngai na tango ya pasi ; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.


Tika ete kufa ekanga bango na mbalakata mpe bakita ya bomoi kati na mboka ya bakufi ; pamba te mabe etondi kati na bandako mpe mitema na bango.


Solo, oyebi motango ya matambe ya bomoi na ngai ya mitelengano. Sopa mpinzoli na ngai kati na mbeki na Yo, oyo ezali buku na Yo ya ekaniseli.


Boyemba banzembo ya lokumu mpo na nkembo ya Kombo na Ye, bopesa lokumu na Ye nkembo.


Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.


Solo, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama.


« Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya, pamba te Yo nde okela biloko nyonso : ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo. »


mpe bazalaki koloba na mongongo makasi : « Mpate oyo babomaki abongi na kozwa nguya, bomengo, bwanya mpe makasi, lokumu, nkembo mpe masanzoli. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ