37 Otambolisaka ngai na kimia, mpe makolo na ngai elengaka te.
Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi, akangolaki ngai, pamba te alingaka ngai.
Akotika te ete lokolo na yo eselumuka ; Ye oyo abatelaka yo animbaka te.
Matambe na ngai ezalaka kaka na banzela na Yo, napengwaka te.
Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai, loboko na Yo ya mobali elendisaka ngai, mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi ; ezali ya koyemba na lindanda.
Soki nalobi : « Makolo na ngai ekomi kolenga na somo, » bolingo na Yo, Yawe, epesaka ngai makasi.
Mpo ete makolo na yo ezala na mikakatano te tango okotambola ; mpe soki okimi mbangu, okokweya te.
Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.