Nakolanda na bokebi nzela ya bato oyo bazangi pamela. Okoya epai na ngai tango nini ? Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu na motema ezangi pamela.
Yawe azali makasi na ngai, azali solo loyembo na ngai, azali mobikisi na ngai, azali Nzambe na ngai, nakokumisa Ye ; azali Nzambe ya tata na ngai, nakonetola Ye.
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.
Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.
apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto ! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela ! Amen !