Mokonzi mpe bato na ye bakendeki na Yelusalemi mpo na kobundisa bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda kuna. Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi : « Okokota awa te, pamba te ezala mokufi miso to moto ya tengu-tengu akobengana yo. » Bakanisaki ete Davidi akoki kokota kuna te.