Kasi Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, ayaki kosunga Davidi, abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye. Boye bato ya Davidi bakataki seleka epai ya mokonzi, balobaki : « Okobima lisusu te elongo na biso na bitumba mpo ete mwinda ya Isalaele ekufa te. »