mpo ete atombola te na lolendo liboso ya bandeko na ye to abima te libanda ya mibeko na yango. Boye, ye elongo na bakitani na ye bakowumela tango molayi na bokonzi kati na Isalaele.
Soki bokosala keba na mibeko oyo mpe bokosalela yango malamu, Yawe, Nzambe na bino, akobatela bolingo mpe boyokani na Ye elongo na bino ndenge alapaki ndayi epai ya bakoko na bino.