Salomo azongisaki : — Otalisi bolamu monene epai ya tata na ngai, Davidi, mosali na Yo, pamba te atambolaki na boyengebene mpe na bosembo na miso na Yo ; okobaki kotalisa ye bolamu monene na Yo mpe opesi ye mwana mobali oyo avandi lelo na kiti na ye ya bokonzi.
yoka wuta na Likolo ; sala mpe kata makambo kati na bawumbu na Yo mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe mpe komemisa ye ngambo ya mabe na ye, kolanda etamboli na ye, mpe mpo na kolongisa moto ya sembo mpe kosalela ye kolanda bosembo na ye.
Ezali na motuya koleka wolo, koleka wolo ebele ya peto, wolo oyo basangisa na eloko mosusu te ; eleki mafuta ya nzoyi na elengi, mafuta ya nzoyi oyo ezali kobima sika.
Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.
Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino !
Yawe oyo afutaka moto nyonso kolanda bosembo mpe boyengebene na ye, akabaki yo na maboko na ngai lelo ; kasi naboyaki kosembola loboko na ngai likolo ya mopakolami na Yawe.