Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 22:20 - Mokanda na Bomoi

20 Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi, akangolaki ngai, pamba te alingaka ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 22:20
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alongwaki wana mpe akendeki kotimola libulu mosusu ; mpe moto moko te aswanisaki ye na tina na yango. Yango wana apesaki yango kombo « Reoboti, » pamba te alobaki : « Sik’oyo, Yawe apesi biso esika monene, mpe tokofuluka na mokili oyo. »


Kasi soki Nzambe alobi : « Nasepeli na yo te, » wana tika ete asala epai na ngai makambo oyo amoni ete ezali malamu, pamba te nazali ya kobongama.


Otambolisaka ngai na kimia, mpe makolo na ngai elengaka te.


Yaebetsi abelelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele ; alobaki : « Oh Yawe ! Soki okoki kopambola ngai mpe koyeisa mabele na ngai monene ! Tika ete loboko na Yo ezala likolo na ngai ! Bomba ngai mosika ya mabe mpo ete namona pasi te. » Mpe Nzambe ayanolaki libondeli na ye.


Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ngai, abikisaki ngai.


kasi Yawe asepelaka na bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batielaka bolingo na Ye motema.


Pamba te Yawe asepelaka na bato na Ye, alatisaka babola motole ya elonga.


Bato nyonso oyo bazali komona ngai bazali koseka ngai, bazali kokamwa, koningisa mito mpe koloba :


Nakozalaka moto ya esengo mpe nakosepelaka kati na bolingo na Yo ; pamba te omonaka pasi na ngai, mpe oyebi mitungisi na ngai.


Okabaki ngai te na maboko ya monguna na ngai, kasi obombaka ngai mosika, na esika ya kimia penza.


Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, mpe akotia bosembo kati na bikolo,


Mpo ete bato ya Isalaele bazali mito makasi lokola ngombe ya mwasi oyo etomboki, ndenge nini Yawe akoka koleisa bango lokola bana meme kati na bilanga minene ?


Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! »


Atiaka elikya na ye kati na Nzambe ; tika ete Nzambe akangola ye sik’oyo soki alingaka ye, pamba te azalaki koloba : ‹ Nazali Mwana na Nzambe. › »


Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ