Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 22:2 - Mokanda na Bomoi

2 Alobaki : Yawe azali libanga na ngai, ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 22:2
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nani azali Nzambe soki Yawe te ? Nani azali libanga soki Nzambe na biso te ?


Ezali Nzambe nde azali ndako na ngai ya makasi, abatelaka nzela na ngai mpe akomisaka yango polele liboso na ngai ;


Nzambe oyo azali Libanga ya Isalaele ayebisi ngai : ‹ Mokonzi oyo akambaka bato kati na bosembo mpe botosi epai ya Nzambe,


Azali bolingo na ngai mpe ndako na ngai ya makasi, ebombamelo mpe mokangoli na ngai, nguba mpe ekimelo na ngai ; Ye nde atiaka bato na ngai na se ya bokonzi na ngai.


Yoka ngai mpe kangola ngai noki ! Zala mpo na ngai libanga oyo ezingelami na bamir mpe ndako batonga makasi mpo na kobikisa ngai.


Na moyi, Yawe apesaka mitindo epai ya bolingo na Ye ; na butu, nakumisaka Ye na banzembo mpe nasambelaka Nzambe ya bomoi na ngai.


Zala mpo na ngai ekimelo ya libanga epai wapi nakoki kokende tango nyonso. Ozwaki mokano ya kobikisa ngai, pamba te ozali libanga mpe ndako na ngai batonga makasi.


Nalobaka na tina na Yawe : « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai ; natiaka elikya na ngai kati na Ye ! »


Kombo ya Yawe ezali lokola ndako molayi batonga makasi ; moyengebene akimelaka kuna mpe azwaka ebombamelo ya makasi.


Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.


Yawe azali lokola Libanga ; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; azali sembo mpe alima.


Moko te azali bule lokola Yawe ; moko te, bobele Yo. Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.


Saulo elongo na bato na ye bakomaki koluka Davidi. Tango bayebisaki Davidi ete bazali koluka ye, akitaki kati na libanga monene mpe avandaki kati na esobe ya Maoni. Mpe tango Saulo ayokaki bongo, akotaki kati na esobe yango ya Moani mpo na kolanda Davidi.


Sima na Saulo kolanda bato ya Filisitia, azongaki ; bongo bayebisaki ye : « Davidi azali sik’oyo kati na esobe ya Eyini-Gedi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ