Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 22:14 - Mokanda na Bomoi

14 Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 22:14
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe ? Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye ?


kasi bino bokozala mpo na Ngai ekolo oyo ekosala mosala ya bonganga-Nzambe, ekolo ya bule. » Oyo nde maloba okoyebisa bana ya Isalaele.


Yawe akosala ete bato bayoka mongongo na Ye ya nkembo mpe akomonisa bango nguya ya loboko na Ye kati na kanda makasi na Ye, kati na moto oyo ebomaka, kati na mvula makasi ya bakake mpe ya mabanga.


Makelele ya mapapu ya basheribe ezalaki koyokana na mosika kino na lopango ya libanda ya Tempelo lokola mongongo ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, tango alobaka.


Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.


Wuta na likolo, minzoto ebundaki ; na nzela na yango oyo etambolaka, minzoto ebundisaki Sisera.


Bato oyo batiaka tembe na Yawe bakopanzana, pamba te akokweyisela bango kake wuta na likolo. Yawe akosambisa mokili mobimba, akopesa mokonzi na yango nguya mpe akobakisa makasi ya mopakolami na Ye.


Wana Samuele azalaki kobonza mbeka ya kotumba, bato ya Filisitia bapusanaki pembeni mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Kasi na mokolo wana, Yawe atindelaki bato ya Filisitia kake makasi oyo ekotisaki mobulu kati na bango. Mpe bato ya Isalaele balongaki bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ