Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 22:10 - Mokanda na Bomoi

10 Afungolaki Lola mpe akitaki, mapata ya mwindo ezalaki na se ya matambe na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 22:10
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo, Salomo alobaki : — Yawe alobaki ete akovanda kati na esika ya molili !


Opika makonzi na yango na mayi ya likolo, okomisaka mapata shar na Yo, otambolaka na mapapu ya mopepe.


Yawe, fungola likolo mpe kita awa na mabele ! Yaka kosimba bangomba mpe sala ete ebimisa milinga !


Mapata mpe molili makasi ezingeli Ye, bosembo mpe bosolo ezali miboko ya Kiti na Ye ya Bokonzi.


Na tongo ya mokolo ya misato, bakake ebetaki, mikalikali ezalaki kongenga, mpe lipata monene ezipaki ngomba ; bongo bato bayokaki bakelelo kobeta makasi. Bato nyonso kati na molako balengaki.


Bato bazalaki kaka mosika, wana Moyize apusanaki pembeni ya lipata oyo kati na yango Nzambe azalaki.


Wuta kala, tozalaka bato na Yo ; kasi tokomi lokola bato oyo okambaka lisusu te, lokola bato oyo babengami na Kombo na Yo te. Oh soki okokaki kopasola likolo mpe kokita, bangomba ekoningana liboso na Yo !


Yawe asilikaka noki te, mpe nguya na Ye ezali monene. Yawe atikaka te moto oyo asali mabe lokola nde asali na ye mabe te, kasi apesaka etumbu na moto oyo asali mabe. Yawe apasolaka nzela na Ye kati na ekumbaki, kati na mopepe makasi.


Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba.


Yango wana, bino bopusanaki mpe botelemaki na ebandeli ya ngomba tango ezalaki kopela moto oyo ekomaki kino na likolo elongo na mapata ya mwindo mpe molili makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ