2 Samuele 21:7 - Mokanda na Bomoi7 Mokonzi atikaki na bomoi Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, mpo na boyokani oyo ezalaki kati na bango mibale, Davidi mpe Jonatan, mwana mobali ya Saulo, tango Davidi alapaki ndayi na Kombo na Yawe. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mwana mobali moko oyo azalaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Wana azalaki nanu na mibu mitano ya mbotama, sango kowuta na Jizireyeli na tina na Saulo mpe Jonatan ekomaki. Boye mama mobokoli na ye akamataki ye mpo na kokima. Kasi lokola akimaki na lombangu, mwana akweyaki mpe akomaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Kombo na ye ezalaki « Mefibosheti. »
Yo, bana na yo ya mibali mpe basali na yo, bokosala bilanga mpo na ye mpe bokomema bambuma oyo bokobuka mpo ete mwana ya nkolo na yo akoka kozwa biloko ya kolia. Mpe Mefibosheti, mwana ya nkolo na yo, akobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai. Nzokande Tsiba azalaki na bana mibali zomi na mitano mpe basali tuku mibale.