Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 21:21 - Mokanda na Bomoi

21 Atiolaki Isalaele ; mpe Jonatan, mwana mobali ya Shimea mpe ndeko mobali ya Davidi, abomaki ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 21:21
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande Aminoni azalaki na moninga na ye moko ya mobali ; kombo na ye ezalaki « Yonadabi, » mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi. Yonadabi azalaki na mayele mabe mingi.


Ezalaki lisusu na bitumba oyo esalemaki kuna na Gati ; mpe ezalaki kuna na mbinga mobali moko, mokitani ya Rafa, oyo azalaki na misapi motoba na loboko moko na moko, mpe misapi motoba na lokolo moko na moko. Na kosangisa, azalaki na misapi tuku mibale na minei.


Bango minei bazalaki bakitani ya Rafa, babotama na Gati mpe bakufaki liboso ya Davidi mpe ya basoda na ye.


Wapi mokonzi ya Amati, ya Aripadi, ya Layiri, ya engumba Sefarivayimi, ya Ena mpe ya Iva ? »


Izayi azalaki tata ya Eliabi, mwana na ye ya liboso ya mobali ; ya mibale, Abinadabi ; ya misato, Shimea ;


Jonatan, ndeko ya tata ya Davidi, azalaki mopesi toli, moto ya mayele mpe mokomi mikanda. Yeyeli, mwana mobali ya Akimoni, azalaki kolandela bana mibali ya mokonzi.


Izayi alekisaki lisusu Shama liboso ya Samuele, kasi Samuele alobaki : « Ezali ye te nde Yawe aponi. »


Moto ya Filisitia alobaki lisusu : « Na mokolo ya lelo, nazali kotiola mampinga ya Isalaele. Bopesa ngai moto moko mpo ete nabunda na ye. »


Bato ya Filisitia bazalaki na likolo ya ngomba na ngambo moko, mpe bato ya Isalaele, na likolo ya ngomba na ngambo mosusu ; kaka lubwaku nde ekabolaki bango.


Lokola mosali na yo abomaki ezala ngombolo to nkosi, akoboma mpe moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te lokola moko kati na banyama wana, pamba te atioli mampinga ya Nzambe na bomoi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ