Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 21:2 - Mokanda na Bomoi

2 Mokonzi abengisaki bato ya Gabaoni mpo na kosolola na bango. Nzokande bato ya Gabaoni bazalaki kotangama te kati na bato ya Isalaele, kasi bakanganaki na batikali kati na bato ya Amori ; bongo bato ya Isalaele bakanganaki na bato ya Amori, na nzela ya ndayi, mpo na kotika bango na bomoi. Kasi Saulo, na bolingo na ye oyo eleka ndelo mpo na Isalaele mpe Yuda, alukaki kosilisa koboma bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 21:2
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te.


Yawe asikelaki lisusu bato ya Isalaele mpe atindikaki Davidi na kosala makambo oyo ekomemisa bango ngambo ; alobaki na Davidi : « Kende kotanga motango ya bato ya Isalaele mpe ya Yuda. »


Jewu alobaki : — Yaka elongo na ngai, mpe okomona bolingo makasi na ngai mpo na Yawe. Boye, Jewu amemaki ye na shar na ye.


Nzokande, Jewu asalaki bokebi te mpo na kobatela mibeko ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema na ye mobimba. Atikaki te masumu ya Jeroboami oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu.


Pamba te bakobengana bino na bandako ya mayangani ; mpe tango elingi kutu kokoka, tango oyo moto nyonso oyo akoboma bino akokanisa ete, wana azali kosala bongo, azali kobonzela Nzambe mbeka.


Pamba te nakoki solo kotatola mpo na bango ete bazali penza na bolingo oyo eleka ndelo mpo na Nzambe. Nzokande, bolingo yango evandisami na boyebi te.


Bato wana balingi bino makasi, kasi makanisi na bango ezali ya malamu te ; bazali na posa ya kokabola bino na ngai mpo ete bokangama na bango.


Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo.


Saulo alobaki : — Jonatan, tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi koleka soki okufi te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ