2 Samuele 21:19 - Mokanda na Bomoi19 Ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na Gobi ; mpe Elanani, mwana mobali ya Yare-Oregimi, moto ya Beteleemi, abomaki Goliati, moto ya Gati, oyo nzete ya likonga na ye ezalaki monene lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.