Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 21:16 - Mokanda na Bomoi

16 Yishibi-Benobi, mokitani ya Rafa, azalaki na mopanga ya sika, likonga oyo songe na yango ezalaki ya bronze mpe ezalaki ya bakilo koleka misato ; mpe abetaki tolo ete akoboma Davidi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 21:16
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ;


Na tango wana, ezalaki na bingambe kati na mokili ; mpe lisusu, milimo esangisaki nzoto na bana basi ya bato, bongo bana basi babotelaki yango bana. Bana yango bazalaki bilombe na tango ya kala, bato oyo bakenda sango.


Sima na mwa tango, ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na mboka Gobi. Ezalaki na tango yango nde Sibekayi, moto ya Usha, abomaki Safi, moko kati na bakitani ya Rafa.


Ezalaki lisusu na bitumba oyo esalemaki kuna na Gati ; mpe ezalaki kuna na mbinga mobali moko, mokitani ya Rafa, oyo azalaki na misapi motoba na loboko moko na moko, mpe misapi motoba na lokolo moko na moko. Na kosangisa, azalaki na misapi tuku mibale na minei.


Bango minei bazalaki bakitani ya Rafa, babotama na Gati mpe bakufaki liboso ya Davidi mpe ya basoda na ye.


Bato ya Filisitia bakomaki mpe bapanzanaki na lubwaku ya Refayimi.


Balekaki na nzela ya etuka ya Negevi mpe bakomaki kino na Ebron epai wapi Ayimani, Sheshayi mpe Talimayi, bakitani ya Anaki, bazalaki kovanda. Engumba Ebron etongamaki mibu sambo liboso ya engumba Tsoani kati na Ejipito.


Kasi bato oyo bavandaka kuna bazali makasi mingi, bingumba na bango etongama makasi mpe ezali minene ; tomonaki lisusu bakitani ya Anaki kuna.


Boni, tokende kaka kuna ? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi : ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › »


Bato ya Emimi nde bazalaki kovanda kuna na kala. Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe lokola bana ya Anaki.


Bango mpe bazalaki komonana lokola bato ya Refayimi ndenge moko na bana ya Anaki. Kasi bato ya Moabi bazalaki kobenga bango bato ya Emimi.


Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe kaka lokola bana ya Anaki. Kasi Yawe abomaki bango liboso ya bato ya Amoni. Bato ya Amoni babenganaki bato ya Zamizumi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango.


Nzokande Ogi, mokonzi ya Bashani, atikalaki kaka ye moko na bomoi kati na bato ya Refayimi. Mbeto na ye ezalaki ya bibende ; molayi na yango ezalaki na bametele pene minei mpe mokuse na yango, bametele pene mibale. Mbeto yango ezali kino lelo na engumba Raba ya bato ya Amoni.


Bato yango bazali makasi mpe bingambe, bana ya Anaki ! Oyebi bango mpe osila koyoka bato koloba na tina na bango : « Nani akoki kotelema liboso ya bana ya Anaki ? »


Ata moto moko te ya Anaki atikalaki kati na mokili ya bana ya Isalaele. Batikalaki kaka na Gaza, kati na Gati, mpe na Asidodi.


Kalebi abenganaki, wuta na Ebron, bakitani misato ya Anaki : Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi.


Monene ya nzete ya likonga na ye ezalaki lokola libaya oyo basali bilamba basalelaka ; songe ya likonga yango ezalaki ya bakilo pene sambo. Moto oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki kotambola liboso na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ