Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 21:15 - Mokanda na Bomoi

15 Bitumba ezalaki lisusu kati ya bato ya Filisitia mpe bato ya Isalaele. Davidi akitaki elongo na basoda na ye mpo na kobundisa bato ya Filisitia ; mpe Davidi alembaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 21:15
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yishibi-Benobi, mokitani ya Rafa, azalaki na mopanga ya sika, likonga oyo songe na yango ezalaki ya bronze mpe ezalaki ya bakilo koleka misato ; mpe abetaki tolo ete akoboma Davidi.


Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bapakoli Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele, bango nyonso bakendeki koluka ye. Kasi tango Davidi ayokaki sango ya mabongisi na bango, akendeki na ndako oyo batonga makasi.


Bato ya Filisitia bayaki lisusu mpe bapanzanaki kati na lubwaku ya Refayimi.


Davidi asalaki ndenge Yawe atindaki ye mpe abomaki bato ya Filisitia, longwa na Geba kino na Gezeri.


Sima na yango, Davidi alongaki bato ya Filisitia mpe abukaki lolendo na bango. Abotolaki Metegi-Ama na maboko ya bato ya Filisitia.


Sima na mwa tango, ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na mboka Gezeri. Ezalaki na tango yango nde Sibekayi, moto ya Usha, abomaki Sipayi, moko kati na bakitani ya Rafa ; mpe bato ya Filisitia bayokisamaki soni.


Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange mpe suki na ngai ekomi pembe, oh Nzambe na ngai, kotika ngai te, mpo ete natatola makasi na Yo epai ya bato ya ekeke oyo, mpe misala ya nguya na Yo epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.


Kobwaka ngai te awa nakomi mobange, kotika ngai te awa makasi na ngai ekomi kosila.


Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba ; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.


tango bakengeli ya ndako bakolenga, mpe bato ya makasi bakofukama ; tango basi oyo banikaka ble bakotika konika yango mpo ete bazali lisusu mingi te, mpe bato oyo batalaka na maninisa bakobungisa kitoko na bango ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ