Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 21:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bongo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, alongolaki elamba ya saki oyo alataki mpe atandaki yango na libanga ; avandaki wana, wuta na ebandeli ya tango ya kobuka bambuma ya orje kino na eleko oyo mvula enokelaki bibembe. Na moyi, apekisaki bandeke ya likolo kokita na likolo ya bibembe yango ; mpe na butu, abenganaki banyama ya zamba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 21:10
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na mikolo misato, Faraon akokata moto na yo mpe akodiembika yo na nzete. Bongo bandeke ekolia mosuni na yo. »


Davidi ayokaki makambo oyo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, makangu ya Saulo, asalaki.


Nzokande, Saulo azalaki na makangu moko ; kombo na ye ezalaki « Ritsipa, » mwana mwasi ya Aya. Bongo Ishi-Bosheti alobaki na Abineri : — Mpo na nini osangisi nzoto na makangu ya tata na ngai ?


Tango Akabi ayokaki makambo oyo, apasolaki bilamba na ye, alataki bilamba ya saki mpe akilaki bilei. Azalaki kolala na bilamba ya saki mpe azalaki kotambola malembe-malembe.


Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo, oyo enokisaka mvula ? Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula ? Te ! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso ! Totie elikya na biso nyonso epai na Yo, pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.


Yo, mampinga na yo nyonso ya basoda mpe bato ya bikolo oyo bakosangana na yo, bokokweya na likolo ya bangomba ya Isalaele ; nakokaba yo lokola bilei epai ya bandeke nyonso oyo eliaka misuni mpe epai ya banyama ya zamba.


Toyeba Yawe, toluka penza koyeba Ye ; ndenge tongo etanaka solo, ndenge wana mpe akomonana : akoya epai na biso lokola mvula, lokola mvula oyo enokaka na pwasa mpe epolisaka mabele.


Tika ete ngombe elela ! Bibwele ekomi kotelengana, pamba te matiti ya kolia etikali lisusu te ; ezala bameme to bantaba ekomi na pasi.


Bosepela, bino bato ya Siona, bosepela kati na Yawe, Nzambe na bino, pamba te apesi bino mvula mpo na kobikisa bino. Akonokisela bino bamvula minene na eleko ya mvula mpe na eleko ya elanga, ndenge ezalaki liboso.


Bosenga epai na Yawe ete anokisa mvula ya suka ; ezali Yawe nde atindaka mapata mpe bakake oyo ememaka bamvula minene, Ye nde abimisaka matiti na elanga ya moko na moko.


nakonokisa kati na mokili na bino mvula na tango na yango, mvula ya ebandeli ya eleko mpe mvula ya suka ya eleko, mpo ete bokoka kobuka mbuma ya malamu, bokoka kozwa vino ya sika mpe mafuta.


akotia pembeni bilamba oyo alataki tango bakangaki ye mpe akovanda na ndako ya mobali yango. Sima na ye kolela tata mpe mama na ye sanza mobimba, mobali yango akosangisa na ye nzoto mpe akokoma mobali na ye ; bongo ye akokoma mwasi ya mobali yango.


Soki moto asali mabe oyo esengi ete bapesa ye etumbu ya kufa, bongo badiembiki nzoto na ye na nzete,


ebembe na ye ekowumela te butu mobimba na nzete wana ; bosengeli kokunda yango kaka na mokolo wana, pamba te moto nyonso oyo badiembiki na nzete azali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe. Bosengeli te kokomisa mbindo mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino lokola libula.


Moto ya Filisitia alobaki lisusu na Davidi : — Pusana awa, nakopesa mosuni na yo epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya zamba.


Na mokolo ya lelo, Yawe akokaba yo na maboko na ngai ; nakoboma yo mpe nakokata moto na yo. Na mokolo ya lelo kaka, nakopesa bibembe ya mampinga ya Filisitia epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya mokili ; mpe mokili mobimba ekoyeba ete ezali na Nzambe moko kati na Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ