Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 20:22 - Mokanda na Bomoi

22 Bongo mwasi akendeki epai ya bato nyonso mpe ayebisaki bango maloba na ye ya bwanya. Boye bakataki moto ya Sheba, mwana mobali ya Bikiri, mpe babwakelaki yango Joabi. Bongo Joabi abetaki kelelo, mpe bato na ye bapanzanaki liboso ya engumba ; moto na moto azongaki na ndako na ye. Joabi mpe azongaki na Yelusalemi epai ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 20:22
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Joabi abetaki kelelo, mpe masanga ya mampinga etikaki kolanda Isalaele, pamba te apekisaki bango.


Bazwaki Abisalomi, babwakaki ye na zamba kati na libulu moko ya monene mpe bazipaki ye na se ya mopiku ya mabanga. Na tango wana, basoda nyonso ya Isalaele bakimaki na bandako na bango.


Boye Joabi abetaki kelelo, mpe bato nyonso batelemaki, batikaki kolanda Isalaele mpe babundaki lisusu te.


Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »


mwasi moko ya bwanya agangaki wuta na engumba : « Boyoka ! Boyoka ! Boyebisa Joabi ete aya awa mpo ete naloba na ye. »


Bwanya ekomisaka moto oyo azali na yango makasi koleka bakambi zomi kati na engumba.


Soki etumbu epesami noki te mpo na mabe oyo esalemi, mitema ya bato etondaka na makanisi ya kosala mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ