Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 20:21 - Mokanda na Bomoi

21 Ezali bongo te. Kasi Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, atombokelaki mokonzi Davidi. Kaba ye, ye moko kaka, mpe nakotika kozingela engumba. Mwasi yango alobaki na Joabi : — Bakobwakela yo moto na ye na likolo ya mir.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 20:21
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »


Bato nyonso ya Isalaele bakimaki Davidi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri. Kasi bato ya Yuda batikalaki pembeni ya mokonzi na bango, na nzela mobimba, longwa na Yordani kino na Yelusalemi.


Joabi azongisaki : — Mosika na ngai ! Mosika na ngai likanisi ya kobebisa to koboma !


Abishayi, ndeko mobali ya Joabi mpe mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka.


Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, moto ya Efrayimi ya Tsereda, moko kati na basali ya Salomo, atombokelaki mokonzi. Mama na ye azalaki mwasi akufisa mobali, mpe kombo na ye : Tseruya.


Tango mokanda ekomaki, bato wana bazwaki bana mibali ya mokonzi, babomaki bango nyonso tuku sambo, batiaki mito na bango na bitunga mpe batindaki yango epai ya Jewu, na Jizireyeli.


Geazi azongisaki : — Iyo, nyonso ezali malamu. Nkolo na ngai atindi ngai koyebisa yo : « Bilenge bayekoli mibale kati na basakoli bayei epai na ngai wuta na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nabondeli yo, pesa bango bakilo ya palata, tuku misato na mitano, mpe bilamba mibale ya talo. »


Mongongo moko ezali koyokana wuta na Dani, ezali kopanza sango ya pasi na bangomba ya Efrayimi.


Kasi nakozongisa Isalaele na lopango na ye ; mpe akolia lisusu matiti ya ngomba Karimeli mpe ya Bashani. Nzala na ye ekosila na etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe ya Galadi.


Bongo, Eleazari, mwana mobali ya Aron, mpe akufaki. Bakundaki ye na ngomba moke oyo bapesaki na Pineasi, mwana na ye ya mobali, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.


Bakundaki ye na mabele ya libula na ye, na Timinati-Eresi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ngambo ya nor ya ngomba Gashi.


Jedeon atindaki bantoma kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi mpo na koloba : « Bokita mpo na kokutana na bato ya Madiani ; bokanga, liboso na bango, nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani. » Bana nyonso ya libota ya Efrayimi bakitaki mpe bakangaki nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani.


Tango bana ya Isalaele bamonaki ete Abimeleki akufi, bazongaki moto na moto epai na ye.


Sima na yango, Davidi ayokaki motema na ye kobeta mpo ete akataki songe ya kazaka ya Saulo.


Kasi Davidi alobaki na Abishayi : — Te ! Koboma ye te ! Pamba te nani akosembola loboko na ye likolo ya mopakolami na Yawe mpe azanga kozwa etumbu ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ