Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 20:2 - Mokanda na Bomoi

2 Bato nyonso ya Isalaele bakimaki Davidi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri. Kasi bato ya Yuda batikalaki pembeni ya mokonzi na bango, na nzela mobimba, longwa na Yordani kino na Yelusalemi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 20:2
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Makambo oyo Davidi alobaki ekotaki na mitema ya bato nyonso ya Yuda lokola moto moko. Boye batindaki maloba epai ya mokonzi mpo na koloba na ye : « Zonga, yo elongo na basali na yo nyonso. »


Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »


Ezali bongo te. Kasi Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, atombokelaki mokonzi Davidi. Kaba ye, ye moko kaka, mpe nakotika kozingela engumba. Mwasi yango alobaki na Joabi : — Bakobwakela yo moto na ye na likolo ya mir.


Tango mokonzi Davidi azongaki na ndako na ye, na Yelusalemi, azwaki bamakangu na ye zomi oyo atikaki mpo na kokengela ndako, mpe atiaki bango kati na ndako moko oyo bazalaki kokengela malamu. Atako azalaki kosunga bango, kasi akendeki te kosangisa na bango nzoto. Bazalaki kokengela bango kino na mokolo na bango ya kufa, mpe bazalaki lokola basi bakufisa mibali.


Tango bana nyonso ya Isalaele bayokaki ete Jeroboami azongi, batindaki bato kobenga ye ete aya na mayangani, mpe bakomisaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba. Kaka libota ya Yuda nde etikalaki kotosa bokonzi ya ndako ya Davidi.


Roboami akobaki kokonza bana ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na bingumba ya Yuda.


Botielaka Ye elikya tango nyonso, bosopaka mitema na bino liboso na Ye, pamba te Nzambe azali ebombamelo mpo na biso.


Kobanda koswana ezali lokola kofungola nzela ya mayi ; tika na yo liboso ete kobendana ekoma makasi.


Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ