Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 20:19 - Mokanda na Bomoi

19 Tozali bato ya kimia mpe ya sembo kati na Isalaele. Kasi yo ozali koluka koboma engumba oyo ezali mama kati na Isalaele ! Mpo na nini olingi kobebisa libula ya Yawe ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 20:19
29 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Abrayami apusanaki mpe alobaki : — Boni, Nkolo na ngai, okoboma penza elongo moto ya sembo mpe moto mabe ?


Tango mosusu, mokonzi akondima kokangola mwasi mosali na ye wuta na loboko ya mobali oyo azali koluka kobwaka ngai mpe mwana na ngai ya mobali mosika ya libula oyo Nzambe apesaki biso. »


Sik’oyo, tinda noki sango epai ya Davidi mpo na koloba na ye : « Kolekisa te butu kati na bitando ya esobe, kasi kende mosika, noki te mokonzi mpe bato oyo bazali elongo na yo bokufa. »


Mwasi yango akobaki koloba : — Na kala, bazalaki na ezaleli ya koloba : « Botuna mayele na mboka Abele, » mpe likambo esili.


Joabi azongisaki : — Mosika na ngai ! Mosika na ngai likanisi ya kobebisa to koboma !


Davidi atunaki bato ya Gabaoni : — Eloko nini nakoki kosala mpo na bino ? Na mabe oyo basalaki bino, ndenge nini nakoki kobongisa makambo mpo ete bopambola libula na Yawe ?


Pamba te, Nkolo Yawe, Yo moko nde oponaki bango kati na mabota nyonso ya mokili mpe otiaki bango pembeni, mpo ete bazala libula na Yo ndenge olobaki na mowumbu na Yo, Moyize, tango obimisaki batata na biso na Ejipito. »


mpo ete namona esengo ya baponami na Yo, nasepela na bolamu ya ekolo na Yo mpe nasepela elongo na libula na Yo !


mbele bamelaki biso ya bomoi tango basilikelaki biso makasi.


Esengo na ekolo oyo Yawe azali Nzambe na yango. Esengo na bato oyo aponaki mpo na libula na Ye.


abengaki ye wuta na sima ya meme oyo azalaki kobatela mpo na kokomisa Ye mobateli ya Jakobi, bato na Ye, mpe ya Isalaele, libula na Ye.


Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abomaki biso ; solo, atiaki biso na mobulu, akomisaki biso lokola mbeki ya pamba ; amelaki biso ndenge nguma emelaka nyama, atondisaki libumu na ye na biloko na biso ya kitoko ; mpe sima, asanzaki biso.


Nakopesa Beli etumbu kati na Babiloni, nakobimisa ye eloko oyo ameli na monoko ; ekolo moko te ekoya lisusu epai na ye mpe bamir ya Babiloni ekokweya.


Banguna na yo nyonso bafungoli minoko na bango mpo na kotiola yo, bazali koseka yo mpe kolia minu na bango ; bongo bazali koloba : « Tomeli ye ! Tala mokolo oyo tozalaki kozela ! Tokomi penza na mokolo yango mpe tomoni yango ! »


Na kozanga mawa, Nkolo abebisi bandako nyonso ya Jakobi ; na kanda na Ye, akweyisi bandako batonga makasi ya Yuda, mwasi kitoko, mpe asambwisi bokonzi mpe bakambi na yango.


Yawe akomi lokola monguna : abebisi mokili ya Isalaele, abebisi bandako nyonso ya mokonzi ya Isalaele, abuki bandako na yango batonga makasi, atondisi matanga mpe kolela kati na Yuda, mboka kitoko.


efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bato ya Kore nyonso elongo na bozwi na bango nyonso.


Mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na Kore, oyo bato oyo bazalaki kolanda ye bakufaki tango moto ebomaki bato nkama mibale na mitano. Bakomaki lokola bandakisa.


Tango oyo epolaka ekolata kozanga kopola, mpe oyo ekufaka ekolata kozanga kokufa, na tango wana nde Liloba oyo ya Makomi ekokokisama : « Elonga emeli kufa.


Solo, wana tozali nanu kati na ndako oyo ya kapo, tozali penza komona pasi mpe konyokwama, pamba te toboyi kobanda nanu na kolongola, kasi tolingi nde kolata mbala moko ndako na biso ya Lola, mpo ete bomoi emela oyo ekufaka.


Tango bokokende kobundisa engumba moko, boyebisa bato ya engumba yango ete bamipesa bango moko na maboko na bino na kimia.


Pamba te eteni ya Yawe ezali bato na Ye ; Jakobi azali libula na Ye.


mpo na bakonzi mpe mpo na bakambi nyonso, mpo ete tokoka kobika bomoi ya boboto, ya kimia, ya botosi kati na makambo ya Nzambe, mpe bomoi ya bosantu.


Bamboka nyonso ya mike-mike ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te, ezalaki lisusu na bato te kino ngai Debora natelemaki, kino natelemaki lokola mama kati na Isalaele.


Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki : « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye ?


Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ