Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 20:10 - Mokanda na Bomoi

10 Amasa azalaki na bokebi te mpo na kotala mopanga oyo ezalaki na loboko ya mwasi ya Joabi. Bongo Joabi atobolaki ye libumu, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki kino na se ; mpe Amasa akufaki mbala moko. Joabi azalaki te na tina na kotuba ye mopanga na mbala ya mibale. Boye Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, balandaki Sheba, mwana mobali ya Bikiri.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 20:10
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kayina alobaki na Abele, ndeko na ye. Wana bazalaki kati na bilanga, Kayina akangaki Abele, ndeko na ye, mpe abomaki ye.


Kasi lokola Asaeli aboyaki kotika kolanda ye, Abineri atubaki Asaeli songe ya likonga na ye na libumu ; mpe likonga ebimaki ye na mokongo. Asaeli akweyaki mpe akufaki wana. Moto nyonso oyo azalaki kokoma na esika oyo Asaeli akweyaki mpe akufaki azalaki kotelema.


Joabi alobaki na Amasa : « Boni ndeko na ngai ya mobali, ozali malamu ? » Bongo Joabi asalelaki loboko na ye ya mobali mpo na kosimba Amasa na mandefu mpe kopesa ye beze.


Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.


Bazalaki kobunda na batolotolo mpe kosalela malamu loboko ya mwasi mpe ya mobali mpo na kobwaka mabanga mpe kobeta bambanzi ya batolotolo. Bazalaki bato ya ekolo moko na Saulo : ekolo ya Benjame.


Isimaeli, mwana mobali ya Netania, elongo na basoda wana zomi oyo bazalaki elongo na ye babomaki na mopanga Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, oyo mokonzi ya Babiloni akomisaki moyangeli kati na mokili.


Soki abambi moninga na ye eloko na nko mpe moninga yango akufi


Bana ya Isalaele bagangaki lisusu epai na Yawe, mpe Yawe apesaki bango mokangoli moko na kombo Ewudi, mwana mobali ya Gera, ya libota ya Benjame. Ewudi azalaki kosalela loboko ya mwasi. Bana ya Isalaele batindaki ye epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mpo na kopesa ye mpako.


Ewudi asembolaki loboko na ye ya mwasi, akamataki mopanga oyo abombaki na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe atubaki yango na libumu ya mokonzi.


Abishayi alobaki na Davidi : — Lelo, Nzambe akabi monguna na yo na maboko na yo. Pesa ngai sik’oyo nzela mpo ete natobola ye kaka mbala moko likonga na ngai mpe apikama na mabele, nakozongela yango te mbala mibale.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ