Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 20:1 - Mokanda na Bomoi

1 Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 20:1
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana mibali ya Benjame : Bela, Bekeri, Ashibeli, Gera, Namani, Eyi, Roshi, Mupimi, Upime mpe Aridi.


Mpe longwa kuna, Abisalomi atindaki bantoma kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo na koloba : « Tango kaka bokoyoka lokito ya kelelo, boloba : ‹ Abisalomi akomi mokonzi kati na Ebron. › »


Bongo Davidi alobaki na Abishayi mpe na basali na ye nyonso : « Soki kutu mwana na ngai moko ya mobali oyo abimi na nzoto na ngai azali koluka koboma ngai, bongo ndenge nini moto oyo ya Benjame asala bongo te ! Tika ye alakela ngai mabe, pamba te ezali Yawe nde alobi na ye bongo.


Shimei azalaki koloba boye wana azalaki kolakela Davidi mabe : « Bima, bima, mobomi bato, moto pamba.


Bazwaki Abisalomi, babwakaki ye na zamba kati na libulu moko ya monene mpe bazipaki ye na se ya mopiku ya mabanga. Na tango wana, basoda nyonso ya Isalaele bakimaki na bandako na bango.


Bato nyonso ya Isalaele bakimaki Davidi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri. Kasi bato ya Yuda batikalaki pembeni ya mokonzi na bango, na nzela mobimba, longwa na Yordani kino na Yelusalemi.


Bongo mwasi akendeki epai ya bato nyonso mpe ayebisaki bango maloba na ye ya bwanya. Boye bakataki moto ya Sheba, mwana mobali ya Bikiri, mpe babwakelaki yango Joabi. Bongo Joabi abetaki kelelo, mpe bato na ye bapanzanaki liboso ya engumba ; moto na moto azongaki na ndako na ye. Joabi mpe azongaki na Yelusalemi epai ya mokonzi.


Kasi bato nyonso ya kilikili bazali lokola nzete ya nzube oyo babwakaka mosika ; basimbaka yango te na maboko pamba.


Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye : « Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo ! » Boye, bana ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo.


Bongo botia mpe liboso na ye bato ya kilikili mibale oyo bakokosela ye makambo na maloba oyo : ‹ Olakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! › Na sima, bomema ye na libanda ya engumba mpe boboma ye na mabanga. »


Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye : — Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo ! Wana bana nyonso ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo,


Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango : — Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo ?


Yawe, telema, kutana na bango mpe bebisa bango ; na nzela ya mopanga na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato mabe.


Yawe azali pene ya bato oyo bazoki na mitema mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.


Kowelaka te kokende kofunda epai ya basambisi makambo oyo osili komona na miso, pamba te okosala nini na suka soki moninga na yo asukisi yo ?


Ndenge makala engalaka na mbabola, mpe bakoni epelisaka moto, ndenge wana mpe moto oyo alinga koswana ayeisaka matata.


Soki bokonzi moko ekabwani, bokonzi yango ekowumela te.


Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »


Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »


Kasi Petelo alobaki na Yesu : — Te ! Osengeli te kosukola ngai makolo ! Yesu azongiselaki ye : — Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu te na libula elongo na Ngai.


Soki oyoki bato koloba na tina na moko kati na bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mpo na kovanda


Wana bazalaki nanu kolia mpe komela, ndambo ya mibali ya engumba, ya mitema mabe, bazingelaki ndako ; babetaki na ekuke mpe balobaki na mobange oyo azalaki nkolo ndako : — Bimisa mosali oyo ayei na ndako na yo ; tolingi kosangisa na ye nzoto ndenge basangisaka nzoto na basi.


Tango akomaki kuna, abetaki kelelo na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe bana ya Isalaele bakitaki elongo na ye, longwa na likolo na ngomba, mpe amitiaki na liboso mpo na kotambolisa bango.


Rite akendeki mpe abandaki kolokota ble na bilanga, na sima ya bato oyo bakataka ble. Akutanaki na libaku ya malamu, pamba te ayaki kososola ete azali kosala kati na elanga ya Boazi, moto ya etuka ya Elimeleki.


Saulo aponaki mibali nkoto misato kati na Isalaele : bato nkoto mibale bazalaki elongo na ye na Mikimasi mpe kati na etuka ya ngomba ya Beteli, mpe bato nkoto moko bazalaki elongo na Jonatan, na Gibea ya Benjame. Bato mosusu oyo batikali, azongisaki bango na bandako na bango.


Bana mibali ya Eli bazalaki kilikili, bayebaki Yawe te.


Kasi kati na bato oyo bakendeki elongo na Davidi, bato nyonso ya mabe mpe batomboki balobaki : — Lokola bakendeki na biso te, tokoki kokabola na bango te bomengo ya bitumba. Tika ete moto na moto azwa kaka mwasi na ye elongo na bana na ye mpe akende.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ