Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango akomaki mokonzi ya Isalaele, mpe akonzaki mibu mibale. Kasi libota ya Yuda ekanganaki na Davidi.
Mpo na bakitani ya Aseri : bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye.
Tala eteni ya mabele ya bakitani ya Efrayimi kolanda bituka na bango : Mondelo ya eteni ya mabele na bango ezalaki na ngambo ya este, longwa na Ataroti-Adari kino na Beti-Oroni ya likolo ;
Longwa na Tapua, ekendeki na ngambo ya weste kino na moluka ya Kana mpe ekendeki kosuka na Ebale monene. Yango nde ezalaki eteni ya libula ya bakitani ya libota ya Efrayimi, kolanda bituka na bango.
Ebakisamaki mpe bingumba nyonso elongo na bamboka na yango ya mike-mike oyo epesamelaki bato ya libota ya Efrayimi kati na libula ya bato ya libota ya Manase.
Libota ya Manase, mwana liboso ya Jozefi, bazwaki eteni ya mabele ; pamba te Makiri, mwana liboso ya Manase, tata ya Galadi, azalaki moto ya bitumba mpe azwaki Galadi mpe Bashani.
Zeke ekweyaki epai ya libota ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango. Eteni ya mabele oyo epesamelaki bango na zeke ezalaki na kati-kati ya mabele ya bakitani ya Yuda mpe ya Jozefi.
Boye bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase batikaki bana mosusu ya Isalaele, na Silo, kati na mokili ya Kanana mpo na kozonga na Galadi, mokili na bango moko, oyo basilaki kozwa, kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.