5 Davidi atindaki bantoma mpo na koloba na bato ya Yabeshi ya Galadi : « Tika ete Yawe apambola bino na ndenge botalisaki motema malamu epai ya nkolo na bino, Saulo, mpe na ndenge bokundaki ye !
Oyaki mpe kaka lobi oyo ewuti koleka, bongo ndenge nini, lelo, namema yo elongo na biso wana nayebi kutu te epai nini nazali kokende ? Zonga mpe zwa bato ya mboka na yo ! Tika ete bolamu mpe boyengebene ya Yawe ezala elongo na yo !
Bongo Davidi akendeki kozwa mikuwa ya Saulo mpe ya Jonatan, mwana na ye ya mobali, epai ya bakambi ya Yabeshi ya Galadi, oyo bayibaki yango na libanda ya Beti-Sheani epai wapi bato ya Filisitia badiembikaki yango mokolo oyo babomaki Saulo, na Giliboa.
Boye, batunaki : « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe, na Mitsipa ? » Bamonaki ete kati na Galadi, moto moko te ya Yabeshi ayaki na molako mpe na mayangani.
Bongo Naomi alobaki na babokilo na ye mibale ya basi : — Bozonga, moto na moto na ndako ya mama na ye. Tika ete Yawe asalela bino bolamu ndenge bosalaki bolamu epai ya bato oyo bakufaki mpe epai na ngai moko.
Naomi alobaki na bokilo na ye ya mwasi : « Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo atiki te kotalisa bolamu na Ye epai na biso bato ya bomoi mpe epai na bakufi. Mobali wana azali ndeko na biso ya pembeni, azali kati na molongo ya bato oyo bakoki kosikola biso. »
Boazi azongiselaki ye : — Tika ete Yawe apambola yo, mwana na ngai ya mwasi ! Bosembo oyo otalisi sik’oyo, ezali monene koleka bosembo oyo otalisaki liboso ; pamba te otambolaki te sima na bilenge mibali, ezala bazwi to babola.
Naashi, moto ya Amoni, ayaki kotonga molako na ye liboso ya Yabeshi ya Galadi. Mpe bato nyonso ya engumba Yabeshi balobaki na Naashi : — Sala boyokani elongo na biso, mpe tokokoma bawumbu na yo.