Joabi atikaki kolanda Abineri mpe azongaki, asangisaki bato na ye nyonso : emonanaki ete bato ya Davidi zomi na libwa kaka nde bazangaki, bakisa Asaeli.
Bakamataki Asaeli mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, na Beteleemi. Bongo Joabi mpe bato na ye batambolaki butu mobimba mpe bakomaki na Ebron na tongo-tongo.
Bitumba kati na libota ya Saulo mpe libota ya Davidi ewumelaki tango molayi. Wana makasi ya Davidi ezalaki komata se komata, makasi ya libota ya Saulo ezalaki kaka kokita.