Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 2:27 - Mokanda na Bomoi

27 Joabi azongisaki : — Na Kombo na Nzambe, soki olobaki te, bato balingaki kokoba kolanda bandeko na bango kino lobi na tongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 2:27
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abineri alobaki na Joabi : — Tika ete bilenge mibali batelema mpe babunda liboso na biso ! Joabi azongisaki : — Malamu ! Tika ete babunda.


Abineri abelelaki na Joabi : — Boni, mopanga ekoba na yango koboma tango nyonso ? Oyebi te ete ekosuka mabe ? Okozela kino tango nini mpo na kopesa mitindo na bato na yo ete balanda lisusu te bandeko na bango ?


Boye Joabi abetaki kelelo, mpe bato nyonso batelemaki, batikaki kolanda Isalaele mpe babundaki lisusu te.


« Na Kombo ya Nzambe oyo awangani bosembo na ngai, na Kombo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso oyo atungisi motema na ngai,


Eyano ya kimia ekimisaka kanda, kasi maloba oyo ezokisaka ebakisaka kanda.


Kobanda koswana ezali lokola kofungola nzela ya mayi ; tika na yo liboso ete kobendana ekoma makasi.


Soki ozali kosala mabongisi, tunaka toli ; mpe soki olingi kobunda bitumba, zala na ekenge mpe na mayele.


Kowelaka te kokende kofunda epai ya basambisi makambo oyo osili komona na miso, pamba te okosala nini na suka soki moninga na yo asukisi yo ?


Olobaki : « Nakozala mwasi mokonzi mpo na libela ! » Kasi motema na yo ekanisaki te tina ya makambo oyo mpe ndenge nini ekosukela.


Sik’oyo, nkolo na ngai, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, lokola Yawe apesi yo nzela te ya koboma mpe ya kozongisa yo moko mabe na mabe, tika ete banguna na yo mpe bato nyonso oyo bazali makasi ya kosala mabe epai ya nkolo na ngai bazala lokola Nabali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ