24 Joabi mpe Abishayi balandaki Abineri ; mpe wana moyi ezalaki kolala, bakomaki na etando ya Ama oyo etalani na Guya, na nzela oyo ekenda na esobe ya Gabaoni.
Kasi lokola Asaeli aboyaki kotika kolanda ye, Abineri atubaki Asaeli songe ya likonga na ye na libumu ; mpe likonga ebimaki ye na mokongo. Asaeli akweyaki mpe akufaki wana. Moto nyonso oyo azalaki kokoma na esika oyo Asaeli akweyaki mpe akufaki azalaki kotelema.
Bato ya Benjame basanganaki sima na Abineri, basalaki lisanga mpe batelemaki na songe ya ngomba moko ya moke.
Sima na yango, Davidi alongaki bato ya Filisitia mpe abukaki lolendo na bango. Abotolaki Metegi-Ama na maboko ya bato ya Filisitia.