2 Samuele 2:23 - Mokanda na Bomoi23 Kasi lokola Asaeli aboyaki kotika kolanda ye, Abineri atubaki Asaeli songe ya likonga na ye na libumu ; mpe likonga ebimaki ye na mokongo. Asaeli akweyaki mpe akufaki wana. Moto nyonso oyo azalaki kokoma na esika oyo Asaeli akweyaki mpe akufaki azalaki kotelema. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Amasa azalaki na bokebi te mpo na kotala mopanga oyo ezalaki na loboko ya mwasi ya Joabi. Bongo Joabi atobolaki ye libumu, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki kino na se ; mpe Amasa akufaki mbala moko. Joabi azalaki te na tina na kotuba ye mopanga na mbala ya mibale. Boye Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, balandaki Sheba, mwana mobali ya Bikiri.
Bakotaki kati na ndako lokola nde bakei kozwa ble, wana Ishi-Bosheti azalaki ya kolala na mbeto na ye kati na shambre, batubaki ye mbeli na libumu, babomaki ye mpe bakataki ye moto ; bongo bazwaki moto yango, bakimaki mpe batambolaki na yango butu mobimba na nzela oyo ekenda na etando ya Araba. Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bakimaki.