22 Boye Abineri alobaki lisusu na Asaeli : — Tika kolanda ngai ! Mpo na nini kotindika ngai na koboma yo ? Bongo ndenge nini nakotala Joabi, ndeko na yo ya mobali, na elongi ?
Abineri alobaki na ye : — Kende na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi, bundisa moko kati na bilenge mibali mpe botola ye bibundeli. Kasi Asaeli atikaki te kolanda ye.
Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.