20 Tango Abineri abalukaki mpo na kotala na sima, atunaki : — Ezali yo Asaeli ? Asaeli azongisaki : — Iyo, ezali ngai.
Asaeli alandaki Abineri na molende penza mpe atikalaki kobaluka te, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi.
Abineri alobaki na ye : — Kende na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi, bundisa moko kati na bilenge mibali mpe botola ye bibundeli. Kasi Asaeli atikaki te kolanda ye.