15 Boye, wana batelemaki mpe batangaki bango, emonanaki motango oyo : zomi na mibale mpo na libota ya Benjame mpe Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo ; mpe zomi na mibale kati na basali ya Davidi.
Moko na moko asimbaki monguna na ye na moto mpe atobolaki ye mopanga na mopanzi ; mpe bango nyonso bakweyaki nzela moko. Bongo babengaki esika yango ya Gabaoni : Elikati-Atsurimi.