2 Samuele 2:13 - Mokanda na Bomoi13 Joabi, mwana mobali ya Tseruya, elongo na basali ya Davidi, bango mpe babimaki mpe bakutanaki na bato ya Abineri pene ya liziba ya Gabaoni : bamoko bazalaki na ngambo moko ya liziba, mpe bamosusu, na ngambo mosusu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Sik’oyo, yo moko oyebi makambo oyo Joabi, mwana mobali ya Tseruya, asalaki ngai ; makambo oyo asalaki bakonzi mibale ya mampinga ya Isalaele : Abineri, mwana mobali ya Neri ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri. Abomaki bango, asopaki makila ya bitumba na tango ya kimia ; boye, atiaki makila ya bitumba na mokaba oyo alataki na loketo na ye, mpe na basandale oyo ezalaki na makolo na ye.