Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 19:9 - Mokanda na Bomoi

9 Boye mokonzi atelemaki mpe avandaki na ekuke. Bongo tango bayebisaki basoda ete mokonzi avandi na ekuke, bango nyonso bayaki pene na ye. Mpe na tango wana, bana ya Isalaele bakimaki moto na moto na ndako na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 19:9
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi : — Boya ! Tosengeli kokima, soki te moko te kati na biso akobika liboso ya Abisalomi. Tosengeli kobima na lombangu, soki te akoya na lombangu kokanga biso, kobebisa biso mpe koboma engumba na mopanga.


Bazwaki Abisalomi, babwakaki ye na zamba kati na libulu moko ya monene mpe bazipaki ye na se ya mopiku ya mabanga. Na tango wana, basoda nyonso ya Isalaele bakimaki na bandako na bango.


Kati na bikolo ya Isalaele, bato bazalaki kotiana tembe mpe koloba : « Mokonzi oyo akangolaki biso na maboko ya banguna na biso, bato ya Filisitia, ye nde sik’oyo akimi mokili likolo ya Abisalomi ;


Sima na bato nyonso kokatisa ebale Yordani, mokonzi mpe akatisaki. Bongo mokonzi apesaki Barizilayi beze mpe apambolaki ye. Mpe Barizilayi azongaki na ndako na ye.


Olongisaka ngai na bitumba ya bato, obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo. Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.


Davidi akomaki na Bali-Peratsimi mpe alongaki kuna bato ya Filisitia. Alobaki : « Yawe afungoleli ngai nzela kati na banguna na ngai, ndenge mayi epasolaka nzela. » Yango wana babengaki esika yango Bala-Peratsimi.


Nanikaka bango lokola putulu oyo mopepe epumbwisaka, nanyataka bango lokola potopoto ya nzela.


Bongo nayebisaki bango : « Tika ete moto nyonso oyo azali na biloko ya matoyi ya wolo alongola yango. » Bapesaki ngai wolo, nanyangwisaki yango na moto mpe nasalaki na yango ekeko ya mwana ngombe oyo.


Boye, Davidi alongaki moto ya Filisitia na nzela ya ebambelo mabanga na ye mpe na nzela ya libanga moko. Davidi abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye, azalaki ata na mopanga te na loboko na ye.


Saulo alobaki : « Boloba na Davidi ete mokonzi asengi mbongo ya libala te, kasi bangenga nkama moko ya nzoto ya mibali kati na bato ya Filisitia mpo na kozongisa mabe na mabe epai ya banguna na ye. » Makanisi ya Saulo ezalaki ya komona Davidi kokweya na maboko ya bato ya Filisitia.


Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ