Abisalomi azalaki kolamuka na tongo makasi mpe azalaki kokende kotelema pembeni ya nzela oyo ekenda na ekotelo ya engumba. Bongo, tango nyonso moto azalaki koleka mpo na kokende epai ya mokonzi mpo ete akatela ye likambo, ye Abisalomi azalaki kobenga ye mpe kotuna ye : — Ozali moto ya engumba nini ? Soki moto yango azongisi : — Mosali na yo azali moto ya moko kati na bikolo ya Isalaele.