Kasi Davidi azalaki komata ngomba ya banzete ya olive na kolela, moto na ye ya kozipama mpe makolo ngulu. Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazipaki bango mpe mito na bango mpe bazalaki kolela wana bazalaki komata.
Bazwaki Abisalomi, babwakaki ye na zamba kati na libulu moko ya monene mpe bazipaki ye na se ya mopiku ya mabanga. Na tango wana, basoda nyonso ya Isalaele bakimaki na bandako na bango.
Joabi akendeki kokuta mokonzi kati na ndako mpe alobaki na ye : « Lelo, oyokisi bato na yo nyonso soni, bato oyo bawuti kobikisa bomoi na yo, bomoi ya bana na yo ya mibali mpe ya basi, bomoi ya basi na yo mpe bomoi ya bamakangu na yo.
Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye ! »
Boye okabaki bango na maboko ya banguna na bango, oyo banyokolaki bango. Kasi tango bakomaki na pasi makasi, babelelaki Yo ; mpe Yo, wuta na likolo, oyokaki bango ; bongo na mawa monene na Yo, otindelaki bango bakangoli oyo bakangolaki bango na maboko ya banguna na bango.