mpe Abisalomi oyo topakolaki mafuta mpo ete akamba biso asili kokufa na bitumba. Boye mpo na nini bozali koloba eloko te mpo na kozongisa mokonzi na Yelusalemi ? »
Mokonzi Davidi atindaki sango epai ya Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari : « Botuna na bampaka ya Yuda : mpo na nini bosengeli kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi na ndako na ye, pamba te makambo oyo ezali kolobama kati na Isalaele mobimba esili kokoma na matoyi ya mokonzi ?
Mokolo wana, elonga ebongwanaki matanga mpo na bato nyonso, pamba te bato bayokaki na mokolo wana sango koloba : « Mokonzi azali na mawa makasi mpo na mwana na ye ya mobali. »
Bato ya Efrayimi basanganaki, bakatisaki na ngambo ya Tsafoni mpe balobaki na Jefite : — Mpo na nini okatisaki mondelo ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango, bongo obengaki biso te mpo ete tokende na yo elongo ? Tokotumba yo elongo na ndako na yo !
Mibali ya Efrayimi batunaki Jedeon : — Bizaleli ya boye elakisi nini epai na biso ? Mpo na nini obengaki biso te tango okendeki kobundisa bato ya Madiani ? Mpe basilikelaki ye makasi.