Kati na bikolo ya Isalaele, bato bazalaki kotiana tembe mpe koloba : « Mokonzi oyo akangolaki biso na maboko ya banguna na biso, bato ya Filisitia, ye nde sik’oyo akimi mokili likolo ya Abisalomi ;
Boye mokonzi atelemaki mpe avandaki na ekuke. Bongo tango bayebisaki basoda ete mokonzi avandi na ekuke, bango nyonso bayaki pene na ye. Mpe na tango wana, bana ya Isalaele bakimaki moto na moto na ndako na ye.
Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »