Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 19:39 - Mokanda na Bomoi

39 Mokonzi azongisaki : — Tika ete Kimeami akende elongo na ngai, mpe ngai nakosalela ye makambo oyo ezali malamu na miso na yo. Nakosalela ye nyonso oyo akosenga ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 19:39
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe apambolaki Abrami na maloba oyo : « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Mokeli ya likolo mpe ya mokili, apambola Abrami !


Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso apambola yo, apesa yo bana, akomisa bana na yo ebele mpe okoma lisanga monene ya bato.


Apesaki bandeko na ye nyonso beze mpe alelaki. Sima na yango, basololaki.


Jakobi apambolaki Faraon mpe alongwaki liboso na ye.


Jozefi amemaki tata na ye mpo na kolakisa ye epai ya Faraon. Tango Jakobi asilisaki kopambola Faraon,


Mokonzi azongisaki : — Te, mwana na ngai, tokoki te kokende biso nyonso, noki te tokozala mokumba mpo na yo. Atako Abisalomi atungisaki ye, kasi mokonzi aboyaki kaka kokende, kasi apambolaki ye.


Boye Joabi akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Mokonzi abengisaki Abisalomi, mpe Abisalomi akendeki liboso ya mokonzi, agumbamaki elongi kino na mabele, mpe mokonzi ayambaki ye.


Nabondeli yo, tika ete mosali na yo azonga mpo na kokufa na engumba na ngai pene ya kunda ya tata mpe mama na ngai ! Kasi tala mwana na ngai ya mobali, mosali na yo, Kimeami. Tika ete akende elongo na mokonzi, nkolo na ngai, mpe salela ye makambo oyo yo omoni ete ezali malamu.


Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Tango Davidi azongaki mpo na kopambola ndako na ye, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abimaki mpo na kokutana na Davidi mpe alobaki : — Lokumu nini mokonzi ya Isalaele amipesi na mokolo ya lelo tango amitiki bolumbu na miso ya basi nyonso ya basali na ye ndenge moto pamba akokaki kosala ?


Elize atikaki bangombe na ye, akimaki mbangu sima na Eliya mpe alobaki : — Tika ete nakende nanu kopesa tata mpe mama na ngai beze mpo na kokabwana na bango, bongo nakolanda yo. Eliya azongisaki : — Zonga na yo, nasali yo nini ?


Bongo Balami atelemaki mpe azongaki epai na ye, Balaki mpe akendeki na nzela na ye.


Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu : — Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato.


Bango nyonso bakomaki kolela, bayambaki Polo mpe bapesaki ye beze ;


Bopesaka bandeko nyonso mbote na nzela ya beze ya bule.


Tango bayokaki bongo, balelaki lisusu. Boye Oripa apesaki mama-bokilo na ye beze mpe mbote ya suka. Kasi Rite akangamaki kaka na ye.


Lapa sik’oyo ndayi epai na ngai na Kombo na Yawe ete okoboma bakitani na ngai te to okolimwisa kombo na ngai te wuta na libota ya botata na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ