Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 19:30 - Mokanda na Bomoi

30 Mokonzi alobaki na ye : — Mpo na nini maloba ebele boye ? Nasili kopesa mitindo ete yo mpe Tsiba bokabola bilanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 19:30
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ah, Jonatan, ndeko na ngai ya mobali, nazali na pasi na motema mpo na yo ! Ozalaki motuya mingi mpo na ngai. Bolingo na yo mpo na ngai ezalaki makasi koleka bolingo ya mwasi !


Azalaki elongo na bato ya Benjame, nkoto moko, mpe Tsiba, moto oyo azalaki kosala kati na libota ya Saulo, elongo na bana na ye ya mibali zomi na mitano mpe basali na ye, tuku mibale. Bakendeki mbangu na Yordani epai wapi mokonzi azalaki.


Pamba te na makanisi ya mokonzi, nkolo na ngai, esengelaki koboma bato nyonso ya libota ya koko na ngai, Saulo ; kasi atako bongo, ondimaki mosali na yo na mesa, kati na bato oyo bazali kolia elongo na yo. Boye makoki nini nakoki lisusu kozala na yango ya kosenga eloko epai ya mokonzi ?


Mefibosheti alobaki na ye : — Lokola mokonzi, nkolo na ngai, azongi mobimba na ndako na ye, tika ete akamata na ye ata nyonso.


Mokonzi abengisaki Tsiba, mosali ya Saulo, mpe alobaki na ye : — Napesi na mwana ya nkolo na yo biloko nyonso oyo ezalaki ya Saulo mpe ya libota na ye.


Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.


Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ