Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 19:27 - Mokanda na Bomoi

27 Mefibosheti azongisaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, mosali na ngai akosaki ngai. Pamba te lokola ngai, mosali na yo, nazali na mbeba na makolo, namilobelaki : « Nakosenga ete babongisela ngai ane na ngai, mpe nakomata yango mpo ete nakende elongo na mokonzi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 19:27
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpe sik’oyo, tala makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba : « Tika ete liloba ya mokonzi, nkolo na ngai, epesa ngai bopemi, pamba te mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe oyo ayebaka kososola mabe mpe malamu. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ! »


Mosali na yo, Joabi, asalaki boye mpo na kobongola mpe kokomisa makambo oyo ndenge mosusu. Kasi nkolo na ngai azali na bwanya lokola Anjelu na Nzambe, ayebi makambo nyonso oyo ezali koleka kati na mokili.


Bongo mokonzi atunaki lisusu : — Wapi Mefibosheti, koko ya nkolo na yo ? Tsiba azongisaki : — Atikalaki na Yelusalemi, pamba te amilobelaki : « Lelo, libota ya Isalaele ekozongisa bokonzi ya koko na ngai na maboko na ngai. »


Mokonzi alobaki na Tsiba : — Nyonso oyo ezali ya Mefibosheti ekomi sik’oyo ya yo. Tsiba alobaki : — Nagumbami liboso na yo mokonzi, nkolo na ngai ! Tika ete nazwa ngolu na miso na yo !


Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya ekolo ya Benjame ya Bawurimi, akendeki mbangu elongo na bato ya Yuda mpo na kokutana na mokonzi Davidi.


Mefibosheti avandaki na Yelusalemi mpo ete azalaki kolia tango nyonso na mesa ya mokonzi.


Mokonzi atunaki ye : — Boni, ezali na moto moko te ya libota ya Saulo, oyo azali nanu na bomoi, oyo epai ya nani nakoki kotalisa bolamu ya Nzambe ? Tsiba azongiselaki mokonzi : — Ezali na mwana mobali moko ya Jonatan, oyo azali nanu na bomoi. Azali na mbeba na makolo nyonso mibale.


Nakosala ete avanda kimia, moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya baninga. Nakokoka te kotala moto ya lolendo mpe moto ya lofundu.


oyo akoselaka moninga makambo te, asalaka ye mabe te, mpe ayokisaka ye pasi te ;


Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo.


Moninga azali kokosa moninga na ye, mpe moto moko te azali koloba solo. Bamibongisaka mpo na koloba lokuta, babimisaka motoki na bango mpo na kosala masumu.


Akishi azongiselaki Davidi : — Nayebi ete osepelisaka ngai lokola Anjelu na Nzambe, Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia balobi : « Asengeli te kokende elongo na biso na bitumba. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ