Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 19:25 - Mokanda na Bomoi

25 Mefibosheti, koko ya Saulo, akendeki mpe kokutana na mokonzi. Banda mokolo oyo mokonzi abimaki kino azongaki, Mefibosheti atikalaki kosukola makolo na ye te, akataki mandefu te mpe asukolaki bilamba na ye te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 19:25
3 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abisalomi atunaki Ushayi : — Oyo nde bolingo nyonso oyo ozali kolakisa epai ya moninga na yo ? Mpo na nini okendeki te elongo na moninga na yo ?


Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mwana mobali moko oyo azalaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Wana azalaki nanu na mibu mitano ya mbotama, sango kowuta na Jizireyeli na tina na Saulo mpe Jonatan ekomaki. Boye mama mobokoli na ye akamataki ye mpo na kokima. Kasi lokola akimaki na lombangu, mwana akweyaki mpe akomaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Kombo na ye ezalaki « Mefibosheti. »


Tango Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, ayaki epai ya Davidi, agumbamaki mpo na kopesa ye lokumu. Davidi alobaki : — Mefibosheti ! Ye azongisaki : — Ngai oyo, mosali na yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ