Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 19:22 - Mokanda na Bomoi

22 Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki : — Boni, Shimei asengelaki te kokufa mpo na likambo oyo, pamba te alakelaki mabe mopakolami na Yawe ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 19:22
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi mokonzi alobaki : — Bino bana mibali ya Tseruya, yo Abishayi mpe ndeko na yo, Joabi, likambo nini kati na ngai mpe bino ? Soki azali kolakela ngai mabe, ezali nde na ndingisa ya Yawe mpo ete alobi na ye : « Lakela Davidi mabe. » Nani sik’oyo akoki kotuna : « Mpo na nini ozali kosala bongo ? »


Wana mokonzi akomaki pembeni ya Bawurimi, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobima wuta na mboka ; kombo na ye ezalaki « Shimei, » mpe azalaki mwana mobali ya Gera. Azalaki moto ya etuka mpe libota moko na Saulo. Bongo wana azalaki kobima, azalaki mpe kolakela Davidi mabe.


Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki na mokonzi : — Mpo na nini mbwa oyo ekufa ezali kolakela nkolo na ngai mabe. Pesa ngai nzela mpo ete nakende kokata ye moto.


Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye ! »


Kiti ya bokonzi ekolendisama na bolingo ; moto moko akovanda na kiti yango na bosolo, akobimela na ndako ya Davidi : alukaka bosembo kati na kosambisa mpe alongisaka makambo ya bosembo.


Bakomaki koganga : — Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini ? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama ?


Kasi Saulo alobaki : — Moto moko te akokufa na mokolo ya lelo, pamba te Yawe akangoli Isalaele na mokolo ya lelo.


Kasi Yawe apekisi ngai kosembola loboko likolo ya mopakolami na Ye. Sik’oyo, zwa kaka likonga mpe eloko ya mayi oyo ezali pembeni ya moto na ye, mpe tokende na biso.


Abishayi alobaki na Davidi : — Lelo, Nzambe akabi monguna na yo na maboko na yo. Pesa ngai sik’oyo nzela mpo ete natobola ye kaka mbala moko likonga na ngai mpe apikama na mabele, nakozongela yango te mbala mibale.


Kasi Davidi alobaki na Abishayi : — Te ! Koboma ye te ! Pamba te nani akosembola loboko na ye likolo ya mopakolami na Yawe mpe azanga kozwa etumbu ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ