Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 19:18 - Mokanda na Bomoi

18 Azalaki elongo na bato ya Benjame, nkoto moko, mpe Tsiba, moto oyo azalaki kosala kati na libota ya Saulo, elongo na bana na ye ya mibali zomi na mitano mpe basali na ye, tuku mibale. Bakendeki mbangu na Yordani epai wapi mokonzi azalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 19:18
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya ekolo ya Benjame ya Bawurimi, akendeki mbangu elongo na bato ya Yuda mpo na kokutana na mokonzi Davidi.


Bamataki na bwato mpo na kokatisa libota ya mokonzi mpe mpo na kosala nyonso oyo ezali malamu na miso ya mokonzi. Tango Shimei, mwana mobali ya Gera, akatisaki Yordani, akweyaki liboso ya mokonzi


Mokonzi alobaki na ye : — Mpo na nini maloba ebele boye ? Nasili kopesa mitindo ete yo mpe Tsiba bokabola bilanga.


Yo, bana na yo ya mibali mpe basali na yo, bokosala bilanga mpo na ye mpe bokomema bambuma oyo bokobuka mpo ete mwana ya nkolo na yo akoka kozwa biloko ya kolia. Mpe Mefibosheti, mwana ya nkolo na yo, akobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai. Nzokande Tsiba azalaki na bana mibali zomi na mitano mpe basali tuku mibale.


Nzokande, ezalaki na mosali moko ya ndako ya Saulo ; kombo na ye « Tsiba. » Babengisaki ye mpo ete aya komimonisa liboso ya Davidi. Mpe mokonzi alobaki na ye : — Ezali yo Tsiba ? Azongisaki : — Iyo, ezali ngai, mosali na yo.


Mpe yeba ete, elongo na yo, ozali na Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya Benjame, na mboka Bawurimi, oyo alakelaki ngai mabe makasi na mokolo oyo nazalaki kokende na Maanayimi. Tango ayaki kokutana na ngai na Yordani, nalapaki ndayi oyo mpo na ye na Kombo na Yawe : ‹ Nakoboma yo na mopanga te. ›


Boloba na Nzambe : « Tala ndenge nini misala na Yo ebongi na kobanga yango ! Mpo na nguya monene na Yo, banguna na Yo bakomi koluka kokoma baninga na Yo.


nalingaki mbala moko koyokisa banguna na bango soni mpe kobundisa bayini na bango.


Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.


Boni, mokolo wana ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kotuna mpo na ye makambo epai ya Nzambe ? Nakanisi ete ezali bongo te. Boye tika ete mokonzi atangela mosali na ye to moko kati na libota ya botata na ngai ngambo te ; pamba te mosali na yo ayebi ata eloko moko te kati na likambo oyo nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ