Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 19:12 - Mokanda na Bomoi

12 Mokonzi Davidi atindaki sango epai ya Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari : « Botuna na bampaka ya Yuda : mpo na nini bosengeli kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi na ndako na ye, pamba te makambo oyo ezali kolobama kati na Isalaele mobimba esili kokoma na matoyi ya mokonzi ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 19:12
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, mobali alobaki : « Tala na mbala oyo, oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai, mosuni ya mosuni na ngai. Bakobenga ye mwasi, pamba te awuti na mobali. »


Labani alobaki na ye : « Solo, ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai penza ! » Jakobi avandaki elongo na ye sanza mobimba.


Tango mokonzi akatisaki na Giligali, Kimeami mpe akatisaki elongo na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ndambo ya mabota ya Isalaele balekisaki mokonzi.


Kasi na mbala moko, bato nyonso ya Isalaele bayaki epai ya mokonzi mpe balobaki na ye : — Mpo na nini bandeko na biso, bato ya Yuda, bazwaki yo na kobombama ? Mpo na nini balekisaki mokonzi na ebale Yordani, elongo na libota na ye mpe bato nyonso ya Davidi elongo na ye ?


Bikolo nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya Davidi mpe balobaki : « Biso na yo, tozali nzoto moko mpe makila moko.


Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe ; Tseraya azalaki mokomi mikanda ;


na elikya ya kolamusa zuwa ya bato ya ekolo na ngai mpe kobikisa ndambo ya bato kati na bango.


« Botuna nanu motuna oyo epai ya bakambi nyonso ya engumba Sishemi : ‹ Eloko nini eleki malamu mpo na bino ? Bakamba bino na bana mibali tuku sambo ya Yerubali to na mwana mobali moko ? › Boyeba ete ngai mpe bino tozali makila moko mpe nzoto moko. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ