Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 19:1 - Mokanda na Bomoi

1 Mokonzi ayokaki pasi na motema, amataki na shambre oyo ezalaki na likolo ya ekuke mpe alelaki. Tango azalaki kokende, alobaki : « Ah Abisalomi, mwana na ngai ya mobali ! Mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali Abisalomi ! Ebongaki ete nakufa na esika na yo ! Oh Abisalomi, mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 19:1
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi bayaki kobondisa ye ; kasi aboyaki kobondisama. Alobaki : « Te ; nakozala na matanga kino nakolanda mwana na ngai na mboka ya bakufi epai wapi mwana na ngai azali. » Boye, tata na ye alelaki ye.


Kasi moto yango azongiselaki Joabi : — Ezala soki batie mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na maboko na ngai, nakosembola loboko na ngai te mpo na koboma mwana ya mokonzi. Pamba te toyokaki mitindo oyo mokonzi apesaki epai na yo, epai na Abishayi mpe epai na Itayi, tango alobaki : « Na kombo na ngai, bosala mabe te na elenge mobali Abisalomi. »


Joabi alobaki : — Nakoki te kolekisa tango na ngai elongo na yo. Boye azwaki makonga misato na maboko na ye mpe atubaki yango na motema ya Abisalomi oyo azalaki nanu ya bomoi kati na nzete ya terebente.


Joabi alobaki na ye : — Ezali yo te moto osengeli komema sango na mokolo ya lelo ; okoki na yo komema sango mokolo mosusu, kasi mpo na lelo, osengeli te kosala yango, pamba te moto oyo akufi azali mwana ya mokonzi.


Apesaki mitindo oyo epai ya Joabi, Abishayi mpe Itayi : « Na kombo na ngai, bosala malembe na elenge mobali Abisalomi. » Basoda nyonso bayokaki mokonzi kopesa mitindo na mokambi moko na moko, na tina na Abisalomi.


Sango ekomelaki Joabi na koloba : « Mokonzi azali kolela mpe asali matanga mpo na Abisalomi. »


Mwana oyo azangi mayele apesaka tata na ye mawa, mpe ayokisaka mama na ye pasi na motema.


Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ