Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 18:9 - Mokanda na Bomoi

9 Abisalomi akutanaki na bato ya Davidi na mbalakata. Azalaki kotambola na likolo ya mile na ye. Bongo tango mile ekimaki, ekotaki na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki na bitape ekangana-kangana, mpe moto ya Abisalomi ekangamaki na nzete. Abisalomi atikalaki ya kodiembela na likolo, kasi mile oyo azalaki kotambolisa ekobaki kokima mbangu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 18:9
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Basali ya Abisalomi basalaki Aminoni ndenge kaka Abisalomi atindaki bango. Bana mibali nyonso ya mokonzi batelemaki, bamataki na bamile na bango mpe bakimaki.


Na suka ya mibu nyonso, azalaki kokata suki ya moto na ye, mpo ete ezalaki kokoma kilo makasi. Boye tango bazalaki kotia yango na bimekelo, ezalaki na bakilo mibale na bagrame nkama mitano, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na ndako ya mokonzi.


Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.


Tango moko kati na basoda amonaki ye, alobaki na Joabi : — Namoni Abisalomi amidiembiki na nzete ya terebente.


Joabi alobaki : — Nakoki te kolekisa tango na ngai elongo na yo. Boye azwaki makonga misato na maboko na ye mpe atubaki yango na motema ya Abisalomi oyo azalaki nanu ya bomoi kati na nzete ya terebente.


Bitumba epanzanaki mboka mobimba ; mpe mokolo wana, bato oyo bakufaki kati na zamba bazalaki ebele koleka bato oyo bakufaki na mopanga.


Boni, pasi ezali mpo na bato mabe te ? Kobebisama ezali mpo na bato oyo basalaka masumu te ?


Moto oyo alakelaka tata to mama na ye mabe, mwinda na ye ekokufa kati na molili.


Liso oyo etiolaka tata mpe ezanga botosi epai ya mama, ekotobolama na bayanganga ya lubwaku, mpe bana ya mpongo ekolia yango.


« Moto nyonso oyo akokima somo akokweya na libulu, mpe moto nyonso oyo akobima na libulu akokangama na motambo, pamba te nakoyeisa mobu ya etumbu na mokili ya Moabi, » elobi Yawe.


Yuda abwakaki mbongo yango kati na Tempelo, alongwaki wana mpe akendeki komidiembika.


Solo, Moyize alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; » mpe « moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »


Klisto akangolaki biso na bilakeli mabe ya Mobeko, pamba te akomaki elakeli mabe na esika na biso. Ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo badiembiki na nzete. »


ebembe na ye ekowumela te butu mobimba na nzete wana ; bosengeli kokunda yango kaka na mokolo wana, pamba te moto nyonso oyo badiembiki na nzete azali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe. Bosengeli te kokomisa mbindo mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino lokola libula.


« Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosambwisa tata na ye to mama na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


« Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye, pamba te asambwisi mbeto ya tata na ye ! » Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ