Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 18:5 - Mokanda na Bomoi

5 Apesaki mitindo oyo epai ya Joabi, Abishayi mpe Itayi : « Na kombo na ngai, bosala malembe na elenge mobali Abisalomi. » Basoda nyonso bayokaki mokonzi kopesa mitindo na mokambi moko na moko, na tina na Abisalomi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 18:5
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Davidi alobaki na Abishayi mpe na basali na ye nyonso : « Soki kutu mwana na ngai moko ya mobali oyo abimi na nzoto na ngai azali koluka koboma ngai, bongo ndenge nini moto oyo ya Benjame asala bongo te ! Tika ye alakela ngai mabe, pamba te ezali Yawe nde alobi na ye bongo.


Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele balobaki : — Toli ya Ushayi, moto ya Ariki, ezali malamu koleka oyo ya Ayitofeli, pamba te Yawe azwaki mokano ya kokakola batoli malamu ya Ayitofeli mpo na komema pasi epai ya Abisalomi.


Kasi moto yango azongiselaki Joabi : — Ezala soki batie mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na maboko na ngai, nakosembola loboko na ngai te mpo na koboma mwana ya mokonzi. Pamba te toyokaki mitindo oyo mokonzi apesaki epai na yo, epai na Abishayi mpe epai na Itayi, tango alobaki : « Na kombo na ngai, bosala mabe te na elenge mobali Abisalomi. »


Mokonzi ayokaki pasi na motema, amataki na shambre oyo ezalaki na likolo ya ekuke mpe alelaki. Tango azalaki kokende, alobaki : « Ah Abisalomi, mwana na ngai ya mobali ! Mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali Abisalomi ! Ebongaki ete nakufa na esika na yo ! Oh Abisalomi, mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali ! »


Ndenge tata alingaka makasi bana na ye, ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi bato oyo batosaka Ye ;


Yesu alobaki : — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala . Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ